< 고린도전서 5 >

1 너희 중에 심지어 음행이 있다 함을 들으니 이런 음행은 이방인 중에라도 없는 것이라 누가 그 아비의 아내를 취하였다 하는도다
Bato bazali koloba bipai nyonso ete pite ezali kosalema kati na bino, pite oyo emonanaka kutu te epai ya Bapagano: mobali moko kati na bino azali kosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye.
2 그리하고도 너희가 오히려 교만하여져서 어찌하여 통한히 여기지 아니하고 그 일 행한 자를 너희 중에서 물리치지 아니하였느냐
Mpe bino, bozali lisusu komikumisa na yango! Nzokande bosengelaki koyoka mawa mpo na yango, mpe kosala ete balongola kati na bino moto oyo azali kosala likambo ya ndenge wana.
3 내가 실로 몸으로는 떠나 있으나 영으로는 함께 있어서 거기 있는 것같이 이 일 행한 자를 이미 판단하였노라
Solo, mpo na ngai, atako nazali elongo na bino te na nzoto, kasi nazali elongo na bino na molimo. Mpe lokola moto oyo azali elongo na bino, na Kombo na Yesu, Nkolo na biso, nasili kokatela moto nyonso oyo azalaki kosala likambo yango etumbu.
4 주 예수의 이름으로 너희가 내 영과 함께 모여서 우리 주 예수의 능력으로
Boye, tango bokosangana na Kombo na Yesu, Nkolo na biso, nakozala elongo na bino na molimo; mpe na nguya ya Yesu, Nkolo na biso,
5 이런 자를 사단에게 내어주었으니 이는 육신은 멸하고 영은 주 예수의 날에 구원 얻게 하려 함이라
bokaba mobali yango na maboko ya Satana mpo ete nzoto na ye ebeba, mpe molimo na ye ebikisama na mokolo ya Nkolo.
6 너희의 자랑하는 것이 옳지 아니하도다 적은 누룩이 온 덩어리에 퍼지는 것을 알지 못하느냐
Lolendo na bino ezali kitoko te! Boyebi te ete mwa kisi moke ya mapa evimbisaka potopoto nyonso ya mapa?
7 너희는 누룩 없는 자인데 새 덩어리가 되기 위하여 묵은 누룩을 내어 버리라 우리의 유월절 양 곧 그리스도께서 희생이 되셨느니라
Bolongola kati na bino kisi nyonso ya kala ya mapa mpo ete bokoma peto lokola potopoto ya sika ya mapa, ndenge bozali penza. Pamba te Klisto, Mpate na biso ya Pasika, asilaki kopesama lokola mbeka.
8 이러므로 우리가 명절을 지키되 묵은 누룩도 말고 괴악하고 악독한 누룩도 말고 오직 순전함과 진실함의 누룩 없는 떡으로 하자
Yango wana, tosepela feti, na mapa ya bosembo mpe ya bosolo, mapa oyo ezangi kisi, kasi na kisi ya kala te ya mapa, kisi ya kindoki mpe ya makambo mabe.
9 내가 너희에게 쓴 것에 음행하는 자들을 사귀지 말라 하였거니와
Kati na mokanda oyo nakomelaki bino, nayebisaki bino ete bozala lisanga moko te na bato oyo batambolaka na bomoi ya pite.
10 이 말은 이 세상의 음행하는 자들이나 탐하는 자들과 토색하는 자들이나 우상 숭배하는 자들을 도무지 사귀지 말라 하는 것이 아니니 만일 그리하려면 세상 밖으로 나가야 할 것이라
Elingi koloba te ete bozala mosika na bato nyonso oyo, kati na mokili oyo, batambolaka na bomoi ya pite to bazali na lokoso ya mbongo to bazali miyibi to basambeli bikeko, pamba te soki ezalaki bongo, wana bosengeli kolongwa na mokili.
11 이제 내가 너희에게 쓴 것은 만일 어떤 형제라 일컫는 자가 음행하거나 탐람하거나 우상 숭배를 하거나 후욕하거나 술 취하거나 토색하거든 사귀지도 말고 그런 자와는 함께 먹지도 말라 함이라
Kasi nazali nde kokomela bino sik’oyo mpo na koyebisa bino ete bozala lisanga moko te na moto oyo amilobelaka ete azali ndeko Moklisto, kasi atambolaka na bomoi ya pite to azali na lokoso ya mbongo to azali mosambeli bikeko to mofingi bato to molangwi masanga to moyibi. Bosengeli kutu te kolia mesa moko elongo na moto ya lolenge oyo.
12 외인들을 판단하는데 내게 무슨 상관이 있으리요마는 교중 사람들이야 너희가 판단치 아니하랴
Boni, mosala na ngai ezali ya kosambisa bato oyo bazali na libanda ya Lingomba? Boni, ezali bino te nde bosengeli kosambisa bato oyo bazali kati na Lingomba?
13 외인들은 하나님이 판단 하시려니와 이 악한 사람은 너희 중에서 내어 쫓으라
Nzambe akosambisa bato oyo bazali na libanda ya Lingomba; kasi bino, bobengana moto mabe kati na bino.

< 고린도전서 5 >