< 고린도전서 3 >

1 형제들아 내가 신령한 자들을 대함과 같이 너희에게 말할 수 없어서 육신에 속한 자 곧 그리스도안에서 어린 아이들을 대함과 같이 하노라
Bandeko, nakokaki te koloba na bino lokola na bato oyo batambolisamaka na Molimo, kasi lokola na bato oyo batambolisamaka kolanda baposa ya nzoto, lokola na bana mike kati na Klisto.
2 내가 너희를 젖으로 먹이고 밥으로 아니하였노니 이는 너희가 감당치 못하였음이거니와 지금도 못하리라
Napesaki bino miliki, kasi bilei ya makasi te, pamba te bolingaki te kokoka kolia yango. Ezala sik’oyo, bokokoka na bino mpe kaka te kolia yango,
3 너희가 아직도 육신에 속한 자로다 너희 가운데 시기와 분쟁이 있으니 어찌 육신에 속하여 사람을 따라 행함이 아니리요
pamba te bozali nanu kotambolisama kolanda baposa ya nzoto. Lokola likunya mpe koswana ezali kati na bino, boni, bozali te kotambolisama kolanda baposa ya nzoto? Bozali kaka kosala lokola moto nyonso te?
4 어떤 이는 말하되 나는 바울에게라 하고 다른 이는 나는 아볼로에게라 하니 너희가 사람이 아니리요
Tango moko azali koloba: « Ngai nazali moto ya Polo, » mpe mosusu: « Ngai nazali moto ya Apolosi, » boni, bozali kaka kosala lokola moto nyonso te?
5 그런즉 아볼로는 무엇이며 바울은 무엇이뇨 저희는 주께서 각각 주신 대로 너희로 하여금 믿게 한 사역자들이니라
Boni, Apolosi azali nani? Polo mpe azali nani? Bazali kaka basali oyo, na nzela na bango, bondimelaki Nzambe, kolanda mosala oyo Nkolo apesaki na moko na moko kati na bango.
6 나는 심었고 아볼로는 물을 주었으되 오직 하나님은 자라나게 하셨나니
Ngai nalonaki, Apolosi asopaki mayi, kasi Nzambe azalaki kokolisa.
7 그런즉 심는 이나 물 주는 이는 아무 것도 아니로되 오직 자라 나게 하시는 하나님뿐이니라
Ezala moto oyo alonaki to moto oyo asopaki mayi, moko te azali na tina; ezali kaka Nzambe oyo akolisaka nde azali na tina.
8 심는 이와 물 주는 이가 일반이나 각각 자기의 일하는 대로 자기의 상을 받으리라
Moto oyo aloni mpe moto oyo asopi mayi bazali kaka ndenge moko, mpe moko na moko akozwa lifuti na ye moko kolanda mosala na ye.
9 우리는 하나님의 동역자들이요 너희는 하나님의 밭이요 하나님의 집이니라
Pamba te biso, tozali basali elongo na Nzambe; mpe bino, bozali elanga ya Nzambe, Ndako ya Nzambe.
10 내게 주신 하나님의 은혜를 따라 내가 지혜로운 건축자와 같이 터를 닦아 두매 다른 이가 그 위에 세우나 그러나 각각 어떻게 그 위에 세우기를 조심할지니라
Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai, natongaki moboko lokola mobongisi ya mayele, mpe moto mosusu azali kotonga na likolo na yango. Boye tika ete moko na moko asala keba na lolenge na ye ya kotonga na likolo ya moboko.
11 이 닦아 둔 것 외에 능히 다른 터를 닦아 둘 자가 없으니 이 터는 곧 예수 그리스도라
Pamba te moko te akoki kotonga moboko mosusu, longola kaka oyo esili kotongama, oyo ezali Yesu-Klisto.
12 만일 누구든지 금이나 은이나 보석이나 나무나 풀이나 짚으로 이 터 위에 세우면
Nzokande, soki moto asaleli wolo to palata to mabanga ya talo to mabaya to makasa to mpe matiti mpo na kotonga na likolo ya moboko yango,
13 각각 공력이 나타날 터인데 그 날이 공력을 밝히리니 이는 불로 나타내고 그 불이 각 사람의 공력이 어떠한 것을 시험할 것임이니라
mokolo ya kosambisama ekomonisa mosala na ye polele; pamba te ekozala mokolo ya moto, mpe moto ekomeka mosala ya moto na moto.
14 만일 누구든지 그 위에 세운 공력이 그대로 있으면 상을 받고
Soki mosala ya moto oyo atongaki na likolo ya moboko eziki te, motongi yango akozwa lifuti.
15 누구든지 공력이 불타면 해를 받으리니 그러나 자기는 구원을 얻되 불 가운데서 얻은 것 같으리라
Kasi soki eziki, motongi akozwa eloko te. Ye moko kaka nde akobika, kasi ekozala lokola moto oyo asili kobika na likama ya moto.
16 너희가 하나님의 성전인 것과 하나님의 성령이 너희 안에 거하시는 것을 알지 못하느뇨
Boni, boyebi te ete bozali Tempelo ya Nzambe, mpe ete Molimo ya Nzambe avandaka kati na bino?
17 누구든지 하나님의 성전을 더럽히면 하나님이 그 사람을 멸하시리라 하나님의 성전은 거룩하니 너희도 그러하니라
Soki moto abebisi Tempelo ya Nzambe, Nzambe mpe akoboma ye; pamba te Tempelo ya Nzambe ezali bule, bongo bino bozali nde Tempelo yango.
18 아무도 자기를 속이지 말라 너희 중에 누구든지 이 세상에서 지혜 있는 줄로 생각하거든 미련한 자가 되어라 그리하여야 지혜로운 자가 되리라 (aiōn g165)
Bomikosa te: soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya kati na mokili oyo, tika ete akoma lokola zoba mpo ete akoma penza moto ya bwanya. (aiōn g165)
19 이 세상 지혜는 하나님께 미련한 것이니 기록된 바 지혜 있는 자들로 하여금 자기 궤휼에 빠지게 하시는 이라 하였고
Pamba te bwanya ya mokili ezali bozoba na miso ya Nzambe. Kolanda ndenge ekomama: « Akangaka bato ya bwanya kati na mitambo ya mayele mabe na bango; »
20 또 주께서 지혜 있는 자들의 생각을 헛 것으로 아신다 하셨느니라
mpe lisusu: « Nkolo ayebi ete makanisi ya bato ya bwanya ezali na tina te, »
21 그런즉 누구든지 사람을 자랑하지 말라 만물이 다 너희 것임이라
yango wana tika ete moko te aluka lokumu kati na bato, pamba te nyonso ezali ya bino:
22 바울이나 아볼로나 게바나 세계나 생명이나 사망이나 지금 것이나 장래 것이나 다 너희의 것이요
ezala Polo, Apolosi, Petelo, mokili, bomoi, kufa, tango oyo tozali sik’oyo to tango oyo ezali koya. Nyonso ezali ya bino;
23 너희는 그리스도의 것이요 그리스도는 하나님의 것이니라
kasi bino, bozali bato ya Klisto, mpe Klisto azali ya Nzambe.

< 고린도전서 3 >