< תהילים 83 >
שיר מזמור לאסף אלהים אל דמי לך אל תחרש ואל תשקט אל׃ | 1 |
Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, kovanda nye te! Nzambe, kokanga monoko na Yo te, kotikala kimia te!
כי הנה אויביך יהמיון ומשנאיך נשאו ראש׃ | 2 |
Tala ndenge banguna na Yo bazali kotomboka; tala ndenge bayini na Yo bazali kotombola mito na bango!
על עמך יערימו סוד ויתיעצו על צפוניך׃ | 3 |
Bazali kosalela bato na Yo likita, kokanela bato oyo obatelaka.
אמרו לכו ונכחידם מגוי ולא יזכר שם ישראל עוד׃ | 4 |
Bazali koloba: « Boya, toboma bango nyonso mpo ete ekolo na bango ezala lisusu te, mpo ete batanga lisusu kombo ya Isalaele te. »
כי נועצו לב יחדו עליך ברית יכרתו׃ | 5 |
Basangani mpe bayokani, basali boyokani mpo na kotelemela Yo:
אהלי אדום וישמעאלים מואב והגרים׃ | 6 |
bato ya Edomi mpe bato ya Isimaeli, bato ya Moabi mpe bato ya Agari,
גבל ועמון ועמלק פלשת עם ישבי צור׃ | 7 |
Gebali, Amoni mpe Amaleki, bato ya Filisitia elongo na bato ya Tiri.
גם אשור נלוה עמם היו זרוע לבני לוט סלה׃ | 8 |
Bato ya Asiri mpe basangani elongo na bango mpo na kobakisa bakitani ya Loti makasi.
עשה להם כמדין כסיסרא כיבין בנחל קישון׃ | 9 |
Sala bango ndenge osalaki Madiani, ndenge osalaki Sisera mpe Yabini, kuna na mayi ya Kishoni.
נשמדו בעין דאר היו דמן לאדמה׃ | 10 |
Babebisamaki na Eyini-Dori, bakomaki lokola matiti ya kopola mpo na mabele.
שיתמו נדיבמו כערב וכזאב וכזבח וכצלמנע כל נסיכמו׃ | 11 |
Sala bato na bango ya lokumu ndenge osalaki Orebi mpe Zeebi; mpe sala bakambi na bango ndenge osalaki Zeba mpe Tsalimuna
אשר אמרו נירשה לנו את נאות אלהים׃ | 12 |
oyo bazalaki koloba: « Tobotola mabele ya Nzambe! »
אלהי שיתמו כגלגל כקש לפני רוח׃ | 13 |
Nzambe na ngai, balola bango lokola matiti oyo mopepe ezali kopumbwisa.
כאש תבער יער וכלהבה תלהט הרים׃ | 14 |
Ndenge moto ezikisaka zamba, ndenge moto makasi ezikisaka bangomba,
כן תרדפם בסערך ובסופתך תבהלם׃ | 15 |
landa bango na nzela ya mopepe na Yo mpe bangisa bango na nzela ya mopepe makasi na Yo!
מלא פניהם קלון ויבקשו שמך יהוה׃ | 16 |
Yawe, tondisa bilongi na bango na soni mpo ete baluka Kombo na Yo!
יבשו ויבהלו עדי עד ויחפרו ויאבדו׃ | 17 |
Tika ete soni mpe somo makasi elata bango mpo na libela! Tika ete bakufa na soni!
וידעו כי אתה שמך יהוה לבדך עליון על כל הארץ׃ | 18 |
Tika bayeba ete Yo, oyo Kombo na Yo ezali Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo kati na mokili mobimba!