< Πραξεις 13 >
1 Ἦσαν δὲ ἐν Ἀντιοχείᾳ κατὰ τὴν οὖσαν ἐκκλησίαν προφῆται καὶ διδάσκαλοι ὅ τε Βαρναβᾶς καὶ Συμεὼν ὁ καλούμενος Νίγερ, καὶ Λούκιος ὁ Κυρηναῖος, Μαναήν τε Ἡρῴδου τοῦ τετραάρχου σύντροφος καὶ Σαῦλος.
Kati na Lingomba oyo ezalaki na Antioshe, ezalaki na basakoli mpe balakisi: Barnabasi, Simeoni oyo bazalaki kobenga « Moto mwindo, » Lusiusi ya Sirene, Manaeni oyo akolaki esika moko na moyangeli Erode, mpe Saulo.
2 λειτουργούντων δὲ αὐτῶν τῷ κυρίῳ καὶ νηστευόντων εἶπεν τὸ πνεῦμα τὸ ἅγιον, ἀφορίσατε δή μοι τὸν Βαρνάβαν καὶ Σαῦλον εἰς τὸ ἔργον ὃ προσκέκλημαι αὐτούς.
Ezalaki mokolo moko, wana bazalaki kogumbamela Nkolo mpe kokila bilei, Molimo Mosantu alobaki: — Botiela ngai pembeni Barnabasi mpe Saulo mpo na mosala oyo nabengeli bango.
3 τότε νηστεύσαντες καὶ προσευξάμενοι καὶ ἐπιθέντες τὰς χεῖρας αὐτοῖς ἀπέλυσαν.
Boye, sima na bango kokila bilei mpe kosambela, batielaki bango maboko mpe batikaki bango kokende.
4 αὐτοὶ μὲν οὖν ἐκπεμφθέντες ὑπὸ τοῦ ἁγίου πνεύματος κατῆλθον εἰς Σελευκίαν, ἐκεῖθέν τε ἀπέπλευσαν εἰς Κύπρον,
Na etinda ya Molimo Mosantu, Barnabasi mpe Saulo bakendeki na Selesi; mpe longwa kuna, bazwaki masuwa mpo na kokende na esanga ya Shipre.
5 καὶ γενόμενοι ἐν Σαλαμῖνι κατήγγελλον τὸν λόγον τοῦ θεοῦ ἐν ταῖς συναγωγαῖς τῶν Ἰουδαίων· εἶχον δὲ καὶ Ἰωάννην ὑπηρέτην.
Tango bakomaki na Salamine, bateyaki Liloba na Nzambe kati na bandako ya mayangani ya Bayuda. Yoane Malako azalaki elongo na bango lokola mosungi.
6 διελθόντες δὲ ὅλην τὴν νῆσον ἄχρι Πάφου εὗρον ἄνδρα τινὰ μάγον ψευδοπροφήτην Ἰουδαῖον ᾧ ὄνομα Βαριησοῦ,
Bakatisaki esanga mobimba kino bakomaki na Pafosi epai wapi bamonaki Moyuda moko, kombo na ye « Bari-Yesu. » Azalaki moto ya maji mpe mosakoli ya lokuta.
7 ὃς ἦν σὺν τῷ ἀνθυπάτῳ Σεργίῳ Παύλῳ, ἀνδρὶ συνετῷ. οὗτος προσκαλεσάμενος Βαρναβᾶν καὶ Σαῦλον ἐπεζήτησεν ἀκοῦσαι τὸν λόγον τοῦ θεοῦ·
Azalaki mpe moninga ya moyangeli Sergiusi Paulusi oyo azalaki moto ya mayele. Boye, Sergiusi Paulusi abengisaki Barnabasi mpe Saulo, pamba te azalaki na posa ya koyoka Liloba na Nzambe.
8 ἀνθίστατο δὲ αὐτοῖς Ἐλύμας ὁ μάγος, οὕτως γὰρ μεθερμηνεύεται τὸ ὄνομα αὐτοῦ, ζητῶν διαστρέψαι τὸν ἀνθύπατον ἀπὸ τῆς πίστεως.
Kasi Elimasi, moto ya maji (pamba te yango nde ezali ndimbola ya kombo na ye), atelemelaki bango mpe azalaki kosala nyonso mpo na kopengwisa kondima ya moyangeli.
9 Σαῦλος δέ, ὁ καὶ Παῦλος, πλησθεὶς πνεύματος ἁγίου ἀτενίσας εἰς αὐτὸν
Bongo lokola Saulo, oyo bazalaki mpe kobenga « Polo, » azalaki atondisama na Molimo Mosantu, atalaki Elimasi na miso mpe alobaki na ye:
10 εἶπεν, ὦ πλήρης παντὸς δόλου καὶ πάσης ῥᾳδιουργίας, υἱὲ διαβόλου, ἐχθρὲ πάσης δικαιοσύνης, οὐ παύσῃ διαστρέφων τὰς ὁδοὺς κυρίου τὰς εὐθείας;
— Mwana ya Satana mpe monguna ya makambo nyonso ya sembo! Otondi na lolenge nyonso ya lokuta mpe ya mayele mabe! Kino tango nini okotika kobebisa mabongisi ya Nkolo, oyo ezali sembo?
11 καὶ νῦν ἰδοὺ χεὶρ κυρίου ἐπὶ σέ, καὶ ἔσῃ τυφλὸς μὴ βλέπων τὸν ἥλιον ἄχρι καιροῦ. παραχρῆμά τε ἔπεσεν ἐπ’ αὐτὸν ἀχλὺς καὶ σκότος, καὶ περιάγων ἐζήτει χειραγωγούς.
Tala, loboko ya Nkolo etelemeli yo sik’oyo. Ozali kokoma mokufi miso mpo na mwa tango moke, okomona lisusu te pole ya moyi. Kaka na tango yango, lipata mpe molili ezipaki miso ya Elimasi; azalaki lisusu komona te mpe akomaki kobaluka-baluka bipai nyonso na koluka moto mpo ete asimba ye na loboko mpe alakisa ye nzela.
12 τότε ἰδὼν ὁ ἀνθύπατος τὸ γεγονὸς ἐπίστευσεν ἐκπλησσόμενος ἐπὶ τῇ διδαχῇ τοῦ κυρίου.
Tango moyangeli amonaki makambo oyo esalemaki, andimaki, pamba te mateya na tina na Nkolo ekamwisaki ye makasi.
13 Ἀναχθέντες δὲ ἀπὸ τῆς Πάφου οἱ περὶ Παῦλον ἦλθον εἰς Πέργην τῆς Παμφυλίας· Ἰωάννης δὲ ἀποχωρήσας ἀπ’ αὐτῶν ὑπέστρεψεν εἰς Ἱεροσόλυμα.
Wuta na Pafosi, Polo elongo na baninga na ye bazwaki masuwa mpe bakendeki na Perje, kati na mokili ya Pafili, epai wapi Yoane Malako atikaki bango mpo na kozonga na Yelusalemi.
14 αὐτοὶ δὲ διελθόντες ἀπὸ τῆς Πέργης παρεγένοντο εἰς Ἀντιόχειαν τὴν Πισιδίαν, καὶ ἐλθόντες εἰς τὴν συναγωγὴν τῇ ἡμέρᾳ τῶν σαββάτων ἐκάθισαν.
Mpe longwa na Perje, bakobaki mobembo na bango kino na Antioshe, kati na mokili ya Pisidi. Na mokolo ya Saba, bakotaki na ndako ya mayangani mpe bavandaki.
15 μετὰ δὲ τὴν ἀνάγνωσιν τοῦ νόμου καὶ τῶν προφητῶν ἀπέστειλαν οἱ ἀρχισυνάγωγοι πρὸς αὐτοὺς λέγοντες, ἄνδρες ἀδελφοί, εἴ τίς ἐστιν ἐν ὑμῖν λόγος παρακλήσεως πρὸς τὸν λαόν, λέγετε.
Sima na kotanga Mobeko mpe Basakoli, bakambi ya ndako ya mayangani batindelaki bango maloba: — Bandeko, soki bozali na maloba mpo na kolendisa bato, bokoki na bino koloba.
16 ἀναστὰς δὲ Παῦλος καὶ κατασείσας τῇ χειρὶ εἶπεν· ἄνδρες Ἰσραηλεῖται καὶ οἱ φοβούμενοι τὸν θεόν, ἀκούσατε.
Polo atelemaki, atombolaki loboko mpe alobaki: — Bato ya Isalaele mpe bino oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, boyoka ngai!
17 ὁ θεὸς τοῦ λαοῦ τούτου Ἰσραὴλ ἐξελέξατο τοὺς πατέρας ἡμῶν, καὶ τὸν λαὸν ὕψωσεν ἐν τῇ παροικίᾳ ἐν γῇ Αἰγύπτου, καὶ μετὰ βραχίονος ὑψηλοῦ ἐξήγαγεν αὐτοὺς ἐξ αὐτῆς,
Nzambe ya bato ya Isalaele aponaki bakoko na biso, akomisaki bango ekolo monene na tango oyo bavandaki kati na mokili ya Ejipito lokola bapaya, mpe abimisaki bango na mokili yango na nguya monene.
18 καὶ ὡς τεσσερακονταετῆ χρόνον ἐτροποφόρησεν αὐτοὺς ἐν τῇ ἐρήμῳ,
Mibu tuku minei mobimba, ayikelaki bango mpiko kati na esobe;
19 καὶ καθελὼν ἔθνη ἑπτὰ ἐν γῇ Χανάαν κατεκληρονόμησεν τὴν γῆν αὐτῶν
abebisaki bikolo sambo kati na mokili ya Kanana mpe apesaki mabele na bango lokola libula epai ya bato na Ye.
20 ὡς ἔτεσιν τετρακοσίοις καὶ πεντήκοντα. καὶ μετὰ ταῦτα ἔδωκεν κριτὰς ἕως Σαμουὴλ προφήτου.
Makambo wana nyonso ewumelaki mibu pene nkama minei na tuku mitano. Sima na yango, Nzambe apesaki bango bilombe kino na tango ya mosakoli Samuele.
21 κἀκεῖθεν ᾐτήσαντο βασιλέα, καὶ ἔδωκεν αὐτοῖς ὁ θεὸς τὸν Σαοὺλ υἱὸν Κείς, ἄνδρα ἐκ φυλῆς Βενιαμείν, ἔτη τεσσεράκοντα.
Bongo, basengaki mokonzi, mpe Nzambe apesaki bango Saulo, mwana mobali ya Kisi, moto ya libota ya Benjame, oyo asalaki mibu tuku minei na bokonzi.
22 καὶ μεταστήσας αὐτὸν ἤγειρεν τὸν Δαυεὶδ αὐτοῖς εἰς βασιλέα, ᾧ καὶ εἶπεν μαρτυρήσας, εὗρον Δαυεὶδ τὸν τοῦ Ἰεσσαί, ἄνδρα κατὰ τὴν καρδίαν μου, ὃς ποιήσει πάντα τὰ θελήματά μου.
Sima na Ye kolongola Saulo, akomisaki Davidi mokonzi na bango. Tala maloba oyo Nzambe atatolaki na tina na ye: « Namoni Davidi, mwana mobali ya Yese, moto oyo asepelisaka motema na ngai; akokokisa solo mokano na ngai nyonso. »
23 τούτου ὁ θεὸς ἀπὸ τοῦ σπέρματος κατ’ ἐπαγγελίαν ἤγαγεν τῷ Ἰσραὴλ σωτῆρα Ἰησοῦν,
Ezali wuta na libota ya Davidi nde Nzambe abimisaki, mpo na bana ya Isalaele, Mobikisi Yesu, ndenge alakaki.
24 προκηρύξαντος Ἰωάννου πρὸ προσώπου τῆς εἰσόδου αὐτοῦ βάπτισμα μετανοίας παντὶ τῷ λαῷ Ἰσραήλ.
Liboso ete Yesu aya, Yoane ateyaki bato nyonso ya Isalaele ete babongola mitema mpe bazwa libatisi.
25 ὡς δὲ ἐπλήρου ὁ Ἰωάννης τὸν δρόμον, ἔλεγεν· τί ἐμὲ ὑπονοεῖτε εἶναι, οὐκ εἰμὶ ἐγώ· ἀλλ’ ἰδοὺ ἔρχεται μετ’ ἐμὲ οὗ οὐκ εἰμὶ ἄξιος τὸ ὑπόδημα τῶν ποδῶν λῦσαι.
Wana Yoane akomaki pene ya kosilisa mosala na ye, alobaki: « Bokanisi ete ngai nazali nani? Nazali te Moto oyo bozali kozela. Kasi azali koya sima na ngai, Ye oyo nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye! »
26 ἄνδρες ἀδελφοί, υἱοὶ γένους Ἀβραὰμ καὶ οἱ ἐν ὑμῖν φοβούμενοι τὸν θεόν, ἡμῖν ὁ λόγος τῆς σωτηρίας ταύτης ἐξαπεστάλη.
Bandeko na ngai, bino oyo bozali bana ya Abrayami, mpe bino oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, ezali epai na biso nde Nzambe atindaki maloba oyo ya lobiko.
27 οἱ γὰρ κατοικοῦντες ἐν Ἱερουσαλὴμ καὶ οἱ ἄρχοντες αὐτῶν τοῦτον ἀγνοήσαντες καὶ τὰς φωνὰς τῶν προφητῶν τὰς κατὰ πᾶν σάββατον ἀναγινωσκομένας κρίναντες ἐπλήρωσαν,
Bato ya Yelusalemi mpe bakambi na bango basosolaki te soki Yesu azali nani; basosolaki mpe te maloba ya basakoli oyo etangamaka mikolo nyonso ya Saba. Nzokande, tango bakatelaki Ye etumbu, bakokisaki nde masakoli yango.
28 καὶ μηδεμίαν αἰτίαν θανάτου εὑρόντες ᾐτήσαντο Πειλᾶτον ἀναιρεθῆναι αὐτόν·
Atako bamonaki mabe moko te kati na Ye, mabe oyo ekokaki komemela Ye etumbu ya kufa, kasi basengaki kaka ete Pilato aboma Ye.
29 ὡς δὲ ἐτέλεσαν πάντα τὰ περὶ αὐτοῦ γεγραμμένα, καθελόντες ἀπὸ τοῦ ξύλου ἔθηκαν εἰς μνημεῖον.
Tango mpe bakokisaki makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ye, bakitisaki Ye longwa na ekulusu mpe batiaki Ye kati na kunda.
30 ὁ δὲ θεὸς ἤγειρεν αὐτὸν ἐκ νεκρῶν·
Kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi,
31 ὃς ὤφθη ἐπὶ ἡμέρας πλείους τοῖς συναναβᾶσιν αὐτῷ ἀπὸ τῆς Γαλιλαίας εἰς Ἱερουσαλήμ, οἵτινες νῦν εἰσιν μάρτυρες αὐτοῦ πρὸς τὸν λαόν.
mpe bato oyo basalaki mibembo elongo na Ye, longwa na Galile kino na Yelusalemi, bamonaki Ye mikolo ebele. Bazali sik’oyo batatoli na Ye epai ya bato na biso.
32 καὶ ἡμεῖς ὑμᾶς εὐαγγελιζόμεθα τὴν πρὸς τοὺς πατέρας ἐπαγγελίαν γενομένην, ὅτι ταύτην ὁ θεὸς ἐκπεπλήρωκεν τοῖς τέκνοις ἡμῶν ἀναστήσας Ἰησοῦν,
Tozali koyebisa bino sango malamu oyo: elaka oyo Nzambe apesaki na bakoko na biso,
33 ὡς καὶ ἐν τῷ πρώτῳ ψαλμῷ γέγραπται· υἱός μου εἶ σύ, ἐγὼ σήμερον γεγέννηκά σε.
Nzambe akokisi yango mpo na biso, bana na bango, na kosekwisa Yesu kati na bakufi, kolanda ndenge ekomama kati na Nzembo ya mibale: « Ozali Mwana na Ngai; na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo. »
34 ὅτι δὲ ἀνέστησεν αὐτὸν ἐκ νεκρῶν μηκέτι μέλλοντα ὑποστρέφειν εἰς διαφθοράν, οὕτως εἴρηκεν ὅτι δώσω ὑμῖν τὰ ὅσια Δαυεὶδ τὰ πιστά.
Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi mpo ete apola ata mokolo moko te. Kolanda ndenge Nzambe alobaki: « Nakopesa bino mapamboli ya bule mpe ya solo, oyo nalakaki Davidi. »
35 διότι καὶ ἐν ἑτέρῳ λέγει, οὐ δώσεις τὸν ὅσιόν σου ἰδεῖν διαφθοράν.
Yango wana, na eteni mosusu, elobamaki lisusu: « Okotika te Mosantu na Yo kopola. »
36 Δαυεὶδ μὲν γὰρ ἰδίᾳ γενεᾷ ὑπηρετήσας τῇ τοῦ θεοῦ βουλῇ ἐκοιμήθη καὶ προσετέθη πρὸς τοὺς πατέρας αὐτοῦ καὶ εἶδεν διαφθοράν,
Nzokande, Davidi, sima na ye kokokisa mabongisi ya Nzambe na tango na ye, akufaki mpe akundamaki pembeni ya bakoko na ye; boye nzoto na ye epolaki.
37 ὃν δὲ ὁ θεὸς ἤγειρεν οὐκ εἶδεν διαφθοράν.
Kasi Ye oyo Nzambe asekwisaki apolaki te.
38 γνωστὸν οὖν ἔστω ὑμῖν, ἄνδρες ἀδελφοί, ὅτι διὰ τούτου ὑμῖν ἄφεσις ἁμαρτιῶν καταγγέλλεται
Yango wana, bandeko na ngai, nalingi boyeba ete ezali na nzela ya Yesu nde bolimbisi ya masumu esakolami epai na bino mpe bozwi bolimbisi ya masumu nyonso oyo Mobeko ya Moyize ekokaki te kokangola bino.
39 ἀπὸ πάντων ὧν οὐκ ἠδυνήθητε ἐν νόμῳ Μωϋσέως δικαιωθῆναι ἐν τούτῳ πᾶς ὁ πιστεύων δικαιοῦται.
Ezali mpe na nzela ya Yesu nde moto nyonso oyo andimi akomi sembo.
40 βλέπετε οὖν μὴ ἐπέλθῃ τὸ εἰρημένον ἐν τοῖς προφήταις,
Yango wana, bosala keba ete makambo oyo basakoli baloba ekomela bino te:
41 ἴδετε, οἱ καταφρονηταί, καὶ θαυμάσατε καὶ ἀφανίσθητε, ὅτι ἔργον ἐργάζομαι ἐγὼ ἐν ταῖς ἡμέραις ὑμῶν, ἔργον ὃ οὐ μὴ πιστεύσητε ἐάν τις ἐκδιηγῆται ὑμῖν.
« Bino batioli, botala, bokamwa mpe bolimwa, pamba te nakosala likambo moko na tango na bino, likambo oyo bokokaki kondima te soki bayebisaki bino yango. »
42 Ἐξιόντων δὲ αὐτῶν παρεκάλουν εἰς τὸ μεταξὺ σάββατον λαληθῆναι αὐτοῖς τὰ ῥήματα ταῦτα.
Tango Polo mpe Barnabasi babimaki na ndako ya mayangani, bato basengaki bango kolobela lisusu makambo wana na mokolo ya Saba oyo elandaki.
43 λυθείσης δὲ τῆς συναγωγῆς ἠκολούθησαν πολλοὶ τῶν Ἰουδαίων καὶ τῶν σεβομένων προσηλύτων τῷ Παύλῳ καὶ τῷ Βαρναβᾷ, οἵτινες προσλαλοῦντες αὐτοῖς ἔπειθον αὐτοὺς προσμένειν τῇ χάριτι τοῦ θεοῦ.
Tango mayangani esilaki, Bayuda mingi elongo na bato ya bikolo mosusu, oyo bakotaki na lingomba ya Bayuda mpe bazalaki kogumbamela Nzambe, balandaki Polo mpe Barnabasi oyo bazalaki kosolola na bango mpe kondimisa bango ete batikala ya kokangama makasi na ngolu ya Nzambe.
44 τῷ δὲ ἐρχομένῳ σαββάτῳ σχεδὸν πᾶσα ἡ πόλις συνήχθη ἀκοῦσαι τὸν λόγον τοῦ κυρίου.
Na mokolo ya Saba oyo elandaki, bato ebele penza ya engumba bayaki kosangana mpo na koyoka Liloba na Nkolo.
45 ἰδόντες δὲ οἱ Ἰουδαῖοι τοὺς ὄχλους ἐπλήσθησαν ζήλου, καὶ ἀντέλεγον τοῖς ὑπὸ Παύλου λαλουμένοις ἀντιλέγοντες καὶ βλασφημοῦντες.
Kasi tango Bayuda bamonaki ebele ya bato, batondaki na zuwa; bakomaki koloba mabe na tina na makambo oyo Polo azalaki koloba, mpe bakomaki kofinga ye.
46 παρρησιασάμενοί τε ὁ Παῦλος καὶ ὁ Βαρναβᾶς εἶπαν· ὑμῖν ἦν ἀναγκαῖον πρῶτον λαληθῆναι τὸν λόγον τοῦ θεοῦ· ἐπειδὴ ἀπωθεῖσθε αὐτὸν καὶ οὐκ ἀξίους κρίνετε ἑαυτοὺς τῆς αἰωνίου ζωῆς, ἰδοὺ στρεφόμεθα εἰς τὰ ἔθνη. (aiōnios )
Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na mpiko: — Tosengeli liboso koteya bino Liloba na Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bozali bino moko komimona ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi na biso sik’oyo epai ya bato oyo bazali Bayuda te. (aiōnios )
47 οὕτως γὰρ ἐντέταλται ἡμῖν ὁ κύριος, τέθεικά σε εἰς φῶς ἐθνῶν τοῦ εἶναί σε εἰς σωτηρίαν ἕως ἐσχάτου τῆς γῆς.
Pamba te, tala makambo oyo Nkolo atindaki biso: « Nakomisi yo pole mpo na bikolo mosusu, mpo ete omema lobiko kino na suka ya mokili. »
48 ἀκούοντα δὲ τὰ ἔθνη ἔχαιρον καὶ ἐδόξαζον τὸν λόγον τοῦ κυρίου, καὶ ἐπίστευσαν ὅσοι ἦσαν τεταγμένοι εἰς ζωὴν αἰώνιον· (aiōnios )
Tango bato ya bikolo ya bapaya bayokaki bongo, basepelaki mpe bakomaki kokumisa Liloba na Nkolo; mpe bato nyonso oyo Nzambe abongisa mpo na kozwa bomoi ya seko bakomaki bandimi. (aiōnios )
49 διεφέρετο δὲ ὁ λόγος τοῦ κυρίου καθ’ ὅλης τῆς χώρας.
Liloba na Nkolo epanzanaki na etuka wana mobimba.
50 οἱ δὲ Ἰουδαῖοι παρώτρυναν τὰς σεβομένας γυναῖκας τὰς εὐσχήμονας καὶ τοὺς πρώτους τῆς πόλεως καὶ ἐπήγειραν διωγμὸν ἐπὶ τὸν Παῦλον καὶ Βαρναβᾶν, καὶ ἐξέβαλον αὐτοὺς ἀπὸ τῶν ὁρίων αὐτῶν.
Kasi Bayuda batiaki songisongi epai ya basi ya lokumu oyo bazalaki kogumbamela Nzambe, mpe epai ya bato minene ya engumba wana; bapelisaki moto mpo ete Polo mpe Barnabasi banyokolama, mpe babenganaki bango wuta na mokili na bango.
51 οἱ δὲ ἐκτιναξάμενοι τὸν κονιορτὸν τῶν ποδῶν ἐπ’ αὐτοὺς ἦλθον εἰς Ἰκόνιον·
Na bongo, Polo mpe Barnabasi bapupolaki putulu ya makolo na bango mpo na bato wana, mpe bakendeki na Ikoniomi.
52 οἱ δὲ μαθηταὶ ἐπληροῦντο χαρᾶς καὶ πνεύματος ἁγίου.
Nzokande, bayekoli batondaki na esengo mpe na Molimo Mosantu.