< Daniel 12 >

1 En ce temps-là s'élèvera Michel le grand prince, celui qui veille sur les fils de ton peuple. Et ce sera un temps de tribulation, de tribulation telle qu'il n'y en a jamais eu de semblable depuis qu'il y a des nations sur la terre jusqu'à ce jour. En ce temps-là sera sauvé tout homme de ton peuple qui sera inscrit dans le livre.
Na tango wana, Misheli, mokambi monene ya ba-anjelu, oyo abatelaka bato na yo akotelema. Ekozala tango ya pasi penza, pasi oyo etikala nanu kozala te wuta bikolo ezala na mokili kino na tango wana. Kasi na tango wana, bato ya ekolo na yo, oyo bakombo na bango ekomonana kati na buku, bakobika.
2 Et nombre de ceux qui dorment sous des amas de terre se réveilleront, les uns pour la vie éternelle, les autres pour la honte et la confusion éternelle.
Ebele ya bato oyo bakundama na se ya mabele bakosekwa: bamoko mpo na bomoi ya seko, mpe mosusu mpo na soni mpe somo ya libela.
3 Et les sages brilleront comme les luminaires du firmament, et nombre de justes comme les étoiles, dans les siècles et au delà.
Bato oyo batambolaki na bwanya bakongenga lokola pole ya mapata; mpe bato oyo bakolakisa bato ebele nzela ya bosembo, bango mpe bakongenga lokola minzoto libela na libela.
4 Pour toi, Daniel, renferme ces paroles, scelle le livre jusqu'au temps de l'accomplissement de ces choses; car beaucoup viendront y apprendre, et par lui la science se multipliera.
Kasi yo, Daniele, batela maloba oyo lokola sekele mpe kanga buku kino na tango ya suka. Mingi bakotambola bipai na bipai, mpe boyebi ya bato ekokola makasi. »
5 Et moi, Daniel, je regardai, et voilà qu'il y avait comme deux autres hommes se tenant l'un sur une rive du fleuve, l'autre sur l'autre rive.
Boye, wana ngai, Daniele, nazalaki kotala, namonaki bato mibale batelemi liboso na ngai: moko azalaki na ngambo moko ya ebale, mpe mosusu azalaki na ngambo mosusu ya ebale.
6 Et l'un d'eux dit à l'homme vêtu de lin, qui était au-dessus de l'eau du fleuve: Quand s'accompliront ces prodiges dont tu as parlé?
Moko kati na bango alobaki epai ya moto oyo alataki bilamba ya lino mpe atelemaki likolo ya mayi ya ebale: — Makambo oyo ya kokamwa ekosala tango boni?
7 Et j'entendis l'homme vêtu de lin, qui était au dessus de l'eau du fleuve; il leva les deux mains vers le ciel, et il jura par Celui qui vit éternellement qu'après un temps, deux temps et la moitié d'un temps à la fin de la dispersion, toutes ces choses seraient connues.
Moto oyo alataki bilamba ya lino mpe atelemaki likolo ya mayi ya ebale atombolaki loboko na ye ya mobali mpe loboko na ye ya mwasi na likolo, mpe nayokaki ye kolapa ndayi na Kombo ya Ye oyo azali na bomoi seko na seko: — Ekozala mibu misato na ndambo. Tango nguya ya ekolo ya bule ekosila, makambo oyo nyonso ekokokisama.
8 Et j'entendis, mais je ne compris pas, et je dis: Seigneur, quelle sera la fin de ces choses?
Nayokaki ye, kasi nasosolaki te. Boye, natunaki: — Makambo oyo ekosukela ndenge nini, nkolo na ngai?
9 Et il dit: Va, Daniel; car ces paroles seront renfermées et scellées, jusqu'à ce que les temps soient venus.
Azongisaki: — Daniele, kende na yo, pamba te maloba oyo ezali sekele, mpe buku na yango ekangama kino na tango ya suka.
10 Plusieurs seront élus, blanchis, éprouvés comme par le feu et sanctifiés; et les pécheurs pècheront, et nul des pécheurs ne comprendra, mais les sages comprendront.
Bato ebele bakopetolama, bakozanga mbeba mpe bakokoma bato ya kokoka; kasi bato mabe bakokoba kaka kosala mabe. Moto moko te ya mabe akososola, kaka bato oyo bakozala na bwanya nde bakososola.
11 Et à partir du temps où a été supprimé le sacrifice perpétuel, l'abomination de la désolation durera douze cent quatre-vingt-dix jours.
Wuta tango oyo bakopekisa kobonza mbeka ya mokolo na mokolo kino tango oyo bakotonga etumbelo mpo na nzambe oyo babengaka Zewusi, ekoleka mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku libwa.
12 Heureux celui qui attendra et parviendra jusqu'à mille trois cent trente-cinq jours!
Tika ete apambolama ye oyo azali kozela kino na suka ya mokolo ya nkoto moko na nkama misato na tuku misato na mitano.
13 Pour toi, va, et sois en repos; car bien des jours et des heures s'écouleront encore avant que les temps s'accomplissent, et à la fin des temps tu ressusciteras pour recueillir ton partage.
Mpo na yo, yika mpiko kino na suka; okopema mpe, na mokolo ya suka, okosekwa mpo na kozwa litomba na yo.

< Daniel 12 >