< Ezekiel 38 >

1 I dođe mi riječ Jahvina:
Yawe alobaki na ngai:
2 “Sine čovječji, okreni lice ka Gogu, u zemlji Magogu, velikom knezu Mešeka i Tubala, prorokuj protiv njega.
« Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Gogi, ya mokili ya Magogi, mokambi ya liboso ya Mesheki mpe ya Tubali! Sakola na tina ye mpo na kotelemela ye!
3 Reci: 'Ovako govori Jahve Gospod: Evo me na te, Gože, veliki kneže Mešeka i Tubala!
Loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Natombokeli yo, Gogi, mokambi ya liboso ya Mesheki mpe ya Tubali!
4 Namamit ću te i metnut ću ti žvale u čeljusti, izvest ću tebe i svu tvoju vojsku - konje i konjanike, silno mnoštvo u potpunoj opremi - sve u oklopima i sa štitovima, sve vične maču.
Nakokembisa yo, nakotia yo bibende na mbanga, nakobimisa yo elongo na basoda na yo nyonso, mpunda na yo elongo na basoda oyo babundaka likolo ya bampunda: bango nyonso balata kitoko mpe batondi ebele, bamemi banguba minene mpe ya mike mpe bayebi malamu kosalela mipanga.
5 S njima je i Perzija, Etiopija i Put - svi sa štitovima i pod kacigama;
Basoda ya Persi, ya Kushi mpe ya Puti, ba-oyo nyonso bamemaka banguba ya mike mpe balataka bikoti ya bibende, bakosangana na bango;
6 zatim Gomer i sve čete njegove, Bet Togarma s krajnjega sjevera i sve čete njezine - silan narod s tobom!
Gomeri mpe mampinga na ye nyonso ya basoda; libota ya Togarima, wuta na suka ya etuka ya nor, elongo na mampinga na ye nyonso ya basoda, ebele ya bato ya bikolo, bakosangana na yo mpo na kosunga yo.
7 Dobro se spremi ti i sve mnoštvo što se oko tebe skupilo i stani mu na čelo!
Milengela malamu mpe bongama, yo elongo na mampinga nyonso oyo esangani na yo! Yo nde okozala mokengeli na bango.
8 Poslije mnogo dana dobit ćeš zapovijed; poslije mnogo godina navalit ćeš na zemlju, izbavljenu od mača i skupljenu iz mojih naroda, na gore Izraelove, nekoć zadugo puste: otkako ih izvedoh iz naroda, svi spokojno žive.
Na mikolo ekoya, okobengama mpo na kobunda; na mibu oyo ekoya, okokende kobundisa mokili oyo bavandi na yango, sima na bango kobika na mopanga, basangisaki bango kati na bikolo ebele, na likolo ya bangomba ya Isalaele, oyo ekufa mpe etikala lisusu na bato te wuta kala. Bakobima wuta na bikolo mosusu mpe bakovanda na kimia.
9 Dići ćeš se, doći kao nevrijeme, kao oblak što prekrije zemlju, ti i tvoje čete, a s vama sila naroda!'
Yo mpe mampinga na yo nyonso, elongo na bikolo ebele oyo esanganaki na yo, bokomata mpe bokopusana lokola mopepe makasi, lokola lipata oyo ezipi mokili.
10 Ovako govori Jahve Gospod: 'U onaj će ti se dan misli rojiti u srcu i skovat ćeš zao naum.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na mokolo wana, makanisi ekobotama na motema na yo mpe okosala mabongisi ya mabe.
11 Reći ćeš: 'Hajde da se dignem na zemlju nebranjenu, da navalim na miran narod koji spokojno živi bez zidina i bez prijevornica i bez vrata:
Okoloba: ‘Nakobundisa mikili oyo ebatelama malamu te, nakokende kino epai ya bato oyo bavandaka na boboto kati na kimia, bavandaka kati na bingumba oyo ezanga bamir, ezanga bikangelo mpe bikuke;
12 pa da se plijena naplijenim i pljačke napljačkam - da ruku stavim na razvaline opet napučene i na narod iz narÄodÄa sakupljen, koji se bavi stadima i imanjem i živi u središtu zemlje.'
nakokende koyiba mpe kozwa na makasi bomengo ya bitumba. Okobalola loboko na yo mpo na kobundisa bisika oyo ebeba, bongo bato bakoma lisusu kovanda kuna, bato oyo basangisa wuta na bikolo, oyo batonda na bibwele mpe na biloko ebele, oyo bavandaka na kati-kati ya mokili oyo.’
13 Šeba, Dedan i trgovci taršiški i svi njihovi lavići pitat će te: 'Zar zato dolaziš plijeniti? I zar si radi pljačke toliku gomilu skupio da odneseš srebro i zlato, da otmeš stoku i imanje i da se plijena velikoga naplijeniš?'
Bato ya Seba, ya Dedani, bato ya mombongo ya Tarsisi, elongo na bamboka na yango nyonso ya mike bakoloba na yo: ‘Boni, oyei solo mpo na kozwa na makasi bomengo ya bitumba? Boni, osangisi mampinga na yo mpo na kobotola palata mpe komema wolo, mpo na kozwa bibwele mpe kobotola biloko to mpo na kozwa biloko ebele?’ ›
14 Zato prorokuj, sine čovječji, i reci Gogu: 'Ovako govori Jahve Gospod: U onaj dan kad narod moj izraelski bude spokojno živio, ti ćeš se podići!
Yango wana, mwana na moto, sakola! Loba na Gogi: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na mokolo wana, tango bato na Ngai, Isalaele, bakovanda na kimia, boni, okoyeba yango te?
15 Doći ćeš iz svoga sjedišta, s krajnjega sjevera, ti i s tobom mnogo naroda, sve samih konjanika, silno mnoštvo, golema vojska.
Okowuta na bisika na yo, mosika kuna na etuka ya nor, yo mpe bikolo ebele elongo na yo; bango nyonso likolo ya bampunda, bato ebele, mampinga ya basoda ebele ya nguya.
16 Navalit ćeš na Izraela, narod moj, kao oblak kad pokrije zemlju. U posljednje dane dovest ću te na svoju zemlju da me narodi upoznaju, kad na tebi, Gože, njima naočigled, pokažem svetost svoju.'
Okoya kobundisa libota na Ngai, Isalaele, ndenge mapata ezipaka mokili. Oh Gogi, na mikolo ekoya, nakosala ete obundisa mokili na Ngai mpo ete bikolo mosusu eyeba Ngai tango Ngai moko nakomonisa bosantu na Ngai na nzela na yo na miso na bango.
17 Ovako govori Jahve Gospod: 'Nisi li ti onaj o kome sam govorio, u davne dane, preko slugu svojih, proroka Izraelovih, koji u ono vrijeme prorokovaše da ću te na njih dovesti?
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Boni, ezali yo te oyo na tina na nani nalobelaki na tango ya kala na nzela ya basali na Ngai, basakoli ya Isalaele, oyo basakolaki na tango wana, na mibu ebele, ete nakotinda yo mpo ete obundisa bato na Ngai?
18 U onaj dan kad Gog navali na zemlju Izraelovu - riječ je Jahve Gospoda - gnjev će mi iz nosa planuti.
Na mokolo yango, mokolo oyo Gogi akobundisa mabele ya Isalaele, tala makambo oyo ekosalema: kanda na Ngai ekopela makasi, elobi Nkolo Yawe.
19 U ljubomori svojoj i u ognju jarosti svoje odlučih: U onaj dan bit će silan potres u zemlji Izraelovoj.
Na zuwa mpe kanda na Ngai ya makasi, nalobi ete na tango wana, mabele ekoningana makasi kati na Isalaele.
20 I trest će se poda mnom ribe morske i ptice nebeske, poljske zvijeri i gmazovi što gmižu po zemlji i svi ljudi što žive na njoj. Planine će se razvaliti, vrleti popadati i sve se zidine porušiti!
Bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, banyama ya zamba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bato nyonso oyo bazali awa na mabele bakolenga liboso na Ngai; bangomba ekopanzana, mabanga minene ekobukana mpe bamir nyonso ekokweya na mabele.
21 I po svim svojim gorama pozvat ću na njega mač - riječ je Jahve Gospoda - s mačem će se brat na brata dići!
Nakobengisa mopanga mpo na kobundisa Gogi, na bangomba na Ngai nyonso, elobi Nkolo Yawe. Mopanga ya moto na moto ekoboma ndeko na ye.
22 Sudit ću mu kugom i krvlju. I spustit ću silan pljusak, i kamenje tÓuče, oganj i sumpor na nj, na njegove čete i na mnogi narod koji bude s njime.
Nakotindela ye bokono oyo ebomaka mpe nakotangisa makila na ye lokola etumbu; nakotindela mampinga na ye mpe bikolo oyo ekosangana na ye mvula makasi, mvula ya mabanga mpe ya moto.
23 I uzveličat ću se, posvetiti i objaviti pred svim narodima, i znat će da sam ja Jahve.'
Na nzela wana, nakomonisa monene mpe bosantu na Ngai, mpe nakosala ete bato ya bikolo ebele bayeba Ngai; boye bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›

< Ezekiel 38 >